ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ

លេខ​ទំព័រ:close

external-link copy
13 : 67

وَأَسِرُّواْ قَوۡلَكُمۡ أَوِ ٱجۡهَرُواْ بِهِۦٓۖ إِنَّهُۥ عَلِيمُۢ بِذَاتِ ٱلصُّدُورِ

13. Soki ata bobombi maloba na bino to bobimisi yango polele, ya solo ye azali moyebi ya nyoso oyo ebombami o kati ya mitema (batolo) info
التفاسير:

external-link copy
14 : 67

أَلَا يَعۡلَمُ مَنۡ خَلَقَ وَهُوَ ٱللَّطِيفُ ٱلۡخَبِيرُ

14. Boye ayebi te baye akela mpe azali malamu atonda basango? info
التفاسير:

external-link copy
15 : 67

هُوَ ٱلَّذِي جَعَلَ لَكُمُ ٱلۡأَرۡضَ ذَلُولٗا فَٱمۡشُواْ فِي مَنَاكِبِهَا وَكُلُواْ مِن رِّزۡقِهِۦۖ وَإِلَيۡهِ ٱلنُّشُورُ

15. Ye nde atiela bino mabele mpete botambola kati na yango lolenge bolingi, mpe bolia oyo apesi bino, mpe bozongi ekozala sé epai naye. info
التفاسير:

external-link copy
16 : 67

ءَأَمِنتُم مَّن فِي ٱلسَّمَآءِ أَن يَخۡسِفَ بِكُمُ ٱلۡأَرۡضَ فَإِذَا هِيَ تَمُورُ

16. To boye bozali na ebateli libanda na oyo azali na likolo été akoki kokotisa bino na mabele kasi bokomona ete mabele ekoningana? info
التفاسير:

external-link copy
17 : 67

أَمۡ أَمِنتُم مَّن فِي ٱلسَّمَآءِ أَن يُرۡسِلَ عَلَيۡكُمۡ حَاصِبٗاۖ فَسَتَعۡلَمُونَ كَيۡفَ نَذِيرِ

17. To boye bobatelami liboso na oyo azali na likolo été atindela bino mopepe ya mabanga? Bokoyeba ndenge nini bokebisi na ngai ezali. info
التفاسير:

external-link copy
18 : 67

وَلَقَدۡ كَذَّبَ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡ فَكَيۡفَ كَانَ نَكِيرِ

18. Mpe baye balekaki liboso na bango baboyaki, mpe etumbu na ngai ezalaki ndenge nini? info
التفاسير:

external-link copy
19 : 67

أَوَلَمۡ يَرَوۡاْ إِلَى ٱلطَّيۡرِ فَوۡقَهُمۡ صَٰٓفَّٰتٖ وَيَقۡبِضۡنَۚ مَا يُمۡسِكُهُنَّ إِلَّا ٱلرَّحۡمَٰنُۚ إِنَّهُۥ بِكُلِّ شَيۡءِۭ بَصِيرٌ

19. Boye bazali kornona te bandeke na likolo lolenge akangaka mpe afungolaka mapapu naye? Oyo asimbi bango ezali sé Ar-Rahmân(1). Ya soló, ye amonaka biloko binso. info

1 Ar-Rahmân: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.

التفاسير:

external-link copy
20 : 67

أَمَّنۡ هَٰذَا ٱلَّذِي هُوَ جُندٞ لَّكُمۡ يَنصُرُكُم مِّن دُونِ ٱلرَّحۡمَٰنِۚ إِنِ ٱلۡكَٰفِرُونَ إِلَّا فِي غُرُورٍ

20. Nani akosalisa bino na mapinga ya kosunga bino liboso ya Ar-Rahmân? Ya soló, bapengwi bazali mpenza na libungi. info
التفاسير:

external-link copy
21 : 67

أَمَّنۡ هَٰذَا ٱلَّذِي يَرۡزُقُكُمۡ إِنۡ أَمۡسَكَ رِزۡقَهُۥۚ بَل لَّجُّواْ فِي عُتُوّٖ وَنُفُورٍ

21. Mpe nani mosusu akoki koleisa bino soki akangi bozui naye? Kasi bazali sé kosala miso makasi kati na mabe mpe koboya. info
التفاسير:

external-link copy
22 : 67

أَفَمَن يَمۡشِي مُكِبًّا عَلَىٰ وَجۡهِهِۦٓ أَهۡدَىٰٓ أَمَّن يَمۡشِي سَوِيًّا عَلَىٰ صِرَٰطٖ مُّسۡتَقِيمٖ

22. Boye oyo azali kotambola elongi na nsé akambami koleka oyo azali kotambola alima na nzela ya semba? info
التفاسير:

external-link copy
23 : 67

قُلۡ هُوَ ٱلَّذِيٓ أَنشَأَكُمۡ وَجَعَلَ لَكُمُ ٱلسَّمۡعَ وَٱلۡأَبۡصَٰرَ وَٱلۡأَفۡـِٔدَةَۚ قَلِيلٗا مَّا تَشۡكُرُونَ

23. Loba: Ye nde akela bino mpe atiela bino bomoni na boyoki mpe mitema, baye bazali kotondo bazali moke. info
التفاسير:

external-link copy
24 : 67

قُلۡ هُوَ ٱلَّذِي ذَرَأَكُمۡ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَإِلَيۡهِ تُحۡشَرُونَ

24. Loba: Ye nde atia bino okati ya mabele, mpe epai naye bokosanganaka. info
التفاسير:

external-link copy
25 : 67

وَيَقُولُونَ مَتَىٰ هَٰذَا ٱلۡوَعۡدُ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ

25. Mpe bazali koloba: Elaka ekozalaka tango nini soki bozali koloba bosôló? info
التفاسير:

external-link copy
26 : 67

قُلۡ إِنَّمَا ٱلۡعِلۡمُ عِندَ ٱللَّهِ وَإِنَّمَآ أَنَا۠ نَذِيرٞ مُّبِينٞ

26. Loba: Boyebi bwa yango ezali nde epai ya Allah, ya soló nazali mokebisi ya polele. info
التفاسير: