ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ

លេខ​ទំព័រ:close

external-link copy
10 : 64

وَٱلَّذِينَ كَفَرُواْ وَكَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِنَآ أُوْلَٰٓئِكَ أَصۡحَٰبُ ٱلنَّارِ خَٰلِدِينَ فِيهَاۖ وَبِئۡسَ ٱلۡمَصِيرُ

10. Kasi тропа baye bapengwaki mpe baboyaki kondimela mikapo mia biso, bango nde bato ya moto mpe bakozalaka kuna libela na libela, kasi bozongi ya mabe nini wana! info
التفاسير:

external-link copy
11 : 64

مَآ أَصَابَ مِن مُّصِيبَةٍ إِلَّا بِإِذۡنِ ٱللَّهِۗ وَمَن يُؤۡمِنۢ بِٱللَّهِ يَهۡدِ قَلۡبَهُۥۚ وَٱللَّهُ بِكُلِّ شَيۡءٍ عَلِيمٞ

11. Likama moko te ekokwela moto sé ezala na ndingisa ya Allah, kasi oyo akondimela Allah, (Allah) akokamba motema naye. Мре Allah azali na boyebi ya eloko nyoso. info
التفاسير:

external-link copy
12 : 64

وَأَطِيعُواْ ٱللَّهَ وَأَطِيعُواْ ٱلرَّسُولَۚ فَإِن تَوَلَّيۡتُمۡ فَإِنَّمَا عَلَىٰ رَسُولِنَا ٱلۡبَلَٰغُ ٱلۡمُبِينُ

12. Botosa Allah mpe botosa motindami (wa ye). Kasi soki boboyi boyeba ete motindami wa biso azali na eloko te sé akomisa nsango ya polele. info
التفاسير:

external-link copy
13 : 64

ٱللَّهُ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَۚ وَعَلَى ٱللَّهِ فَلۡيَتَوَكَّلِ ٱلۡمُؤۡمِنُونَ

13. Allah, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosóló sé ye. Mpe epai ya Allah esengeli na bandimi bamikaba. info
التفاسير:

external-link copy
14 : 64

يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِنَّ مِنۡ أَزۡوَٰجِكُمۡ وَأَوۡلَٰدِكُمۡ عَدُوّٗا لَّكُمۡ فَٱحۡذَرُوهُمۡۚ وَإِن تَعۡفُواْ وَتَصۡفَحُواْ وَتَغۡفِرُواْ فَإِنَّ ٱللَّهَ غَفُورٞ رَّحِيمٌ

14. Eh bino bandimi! Ya soló, kati na basi mpe bana na bino bazali banguna na bino, bokeba na bango. Mpe soki boyoki (bango) mawa, botiki mpe bolimbisi (bango), ya sólo Allah azali molimbisi atonda ngolu. info
التفاسير:

external-link copy
15 : 64

إِنَّمَآ أَمۡوَٰلُكُمۡ وَأَوۡلَٰدُكُمۡ فِتۡنَةٞۚ وَٱللَّهُ عِندَهُۥٓ أَجۡرٌ عَظِيمٞ

15. Ya sólo, misolo na bana na bino ezali mimekano, mpe epayi na Allah nde lifuta linene lizali. info
التفاسير:

external-link copy
16 : 64

فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ مَا ٱسۡتَطَعۡتُمۡ وَٱسۡمَعُواْ وَأَطِيعُواْ وَأَنفِقُواْ خَيۡرٗا لِّأَنفُسِكُمۡۗ وَمَن يُوقَ شُحَّ نَفۡسِهِۦ فَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡمُفۡلِحُونَ

16. Mpe bobanga Allah na bokoki na bino, mpe boyoka mpe botosa mpe bobimisa (тропа Allah) ezali malamu тропа bino moko, mpe oyo akomibatela mosika na moyimi naye, ba oyo wana nde balongi. info
التفاسير:

external-link copy
17 : 64

إِن تُقۡرِضُواْ ٱللَّهَ قَرۡضًا حَسَنٗا يُضَٰعِفۡهُ لَكُمۡ وَيَغۡفِرۡ لَكُمۡۚ وَٱللَّهُ شَكُورٌ حَلِيمٌ

17. Soki bokotiseli Allah nyongo ya malamu akobakisela bino ebele, mpe akolimbisa bino, mpe Allah azongisaka matondi atonda mawa. info
التفاسير:

external-link copy
18 : 64

عَٰلِمُ ٱلۡغَيۡبِ وَٱلشَّهَٰدَةِ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ

18. Ayebi maye mabombami na maye mazali polele (azali) wa bokasi atonda bwanya. info
التفاسير: