ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ

លេខ​ទំព័រ:close

external-link copy
5 : 63

وَإِذَا قِيلَ لَهُمۡ تَعَالَوۡاْ يَسۡتَغۡفِرۡ لَكُمۡ رَسُولُ ٱللَّهِ لَوَّوۡاْ رُءُوسَهُمۡ وَرَأَيۡتَهُمۡ يَصُدُّونَ وَهُم مُّسۡتَكۡبِرُونَ

5. Mpe soki bayebisi bango boya mpo motindami ya Allah asengela bino bolimbisi, babaloli mitu na bango, okomona bazali kobongola mikongo na lolendo. info
التفاسير:

external-link copy
6 : 63

سَوَآءٌ عَلَيۡهِمۡ أَسۡتَغۡفَرۡتَ لَهُمۡ أَمۡ لَمۡ تَسۡتَغۡفِرۡ لَهُمۡ لَن يَغۡفِرَ ٱللَّهُ لَهُمۡۚ إِنَّ ٱللَّهَ لَا يَهۡدِي ٱلۡقَوۡمَ ٱلۡفَٰسِقِينَ

6. Osengela bango bolimbisi to osengela bango te, ezali sé lolenge moko, Allah akolimbisaka bango te. Ya soló, Allah akambaka bato ya mabe te. info
التفاسير:

external-link copy
7 : 63

هُمُ ٱلَّذِينَ يَقُولُونَ لَا تُنفِقُواْ عَلَىٰ مَنۡ عِندَ رَسُولِ ٱللَّهِ حَتَّىٰ يَنفَضُّواْۗ وَلِلَّهِ خَزَآئِنُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَلَٰكِنَّ ٱلۡمُنَٰفِقِينَ لَا يَفۡقَهُونَ

7. Bango nde bato bazali koloba: Bosalisa baye bazali pene na motindami te kino bakopanzana, Allah nde Nkolo sanduku ya bomengo ya likolo na ya mabele, kasi bato ya bilongi mibale bazali koyeba te. info
التفاسير:

external-link copy
8 : 63

يَقُولُونَ لَئِن رَّجَعۡنَآ إِلَى ٱلۡمَدِينَةِ لَيُخۡرِجَنَّ ٱلۡأَعَزُّ مِنۡهَا ٱلۡأَذَلَّۚ وَلِلَّهِ ٱلۡعِزَّةُ وَلِرَسُولِهِۦ وَلِلۡمُؤۡمِنِينَ وَلَٰكِنَّ ٱلۡمُنَٰفِقِينَ لَا يَعۡلَمُونَ

8. Bazali koloba ete: Soki tozongi na Madinah, bato ya makasi kati na biso, bakobimisa baye bazangi makasi. Nzoka nde nguya ezali ya Allah na motindami naye mpe na bandimi, kasi bato ya bilongi mibale bazali koyeba te. info
التفاسير:

external-link copy
9 : 63

يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَا تُلۡهِكُمۡ أَمۡوَٰلُكُمۡ وَلَآ أَوۡلَٰدُكُمۡ عَن ذِكۡرِ ٱللَّهِۚ وَمَن يَفۡعَلۡ ذَٰلِكَ فَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡخَٰسِرُونَ

9. Eh bino baye bondima! Misolo na bana na bino mibosanisa bino bokundoli ya Allah te. Mpe oyo akosala yango baye wana nde bazangi. info
التفاسير:

external-link copy
10 : 63

وَأَنفِقُواْ مِن مَّا رَزَقۡنَٰكُم مِّن قَبۡلِ أَن يَأۡتِيَ أَحَدَكُمُ ٱلۡمَوۡتُ فَيَقُولَ رَبِّ لَوۡلَآ أَخَّرۡتَنِيٓ إِلَىٰٓ أَجَلٖ قَرِيبٖ فَأَصَّدَّقَ وَأَكُن مِّنَ ٱلصَّٰلِحِينَ

10. Mpe bobimisa ndambo ya maye topesaki bino (o nzela ya Allah) yambo liwa liyela moko na bino mpe aloba: Nkolo na ngai; zelisa ngai ata mwa tango ya шоке mpo na kaba mpo nazala okati ya bato ya malamu. info
التفاسير:

external-link copy
11 : 63

وَلَن يُؤَخِّرَ ٱللَّهُ نَفۡسًا إِذَا جَآءَ أَجَلُهَاۚ وَٱللَّهُ خَبِيرُۢ بِمَا تَعۡمَلُونَ

11.Tango wana Allah azelisaka moto te soki ngonga naye ekoki, kasi Allah ayebi malamu maye bozali kosala. info
التفاسير: