ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ

លេខ​ទំព័រ:close

external-link copy
11 : 42

فَاطِرُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۚ جَعَلَ لَكُم مِّنۡ أَنفُسِكُمۡ أَزۡوَٰجٗا وَمِنَ ٱلۡأَنۡعَٰمِ أَزۡوَٰجٗا يَذۡرَؤُكُمۡ فِيهِۚ لَيۡسَ كَمِثۡلِهِۦ شَيۡءٞۖ وَهُوَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡبَصِيرُ

11. Mokeli wa likolo na mabele. Asalela bino basi baye bawuti na banzoto na bino moko, mpe asaleli bino banyama mibale mibale, na nzela wana nde bokoma ebele. Azali na mokokani te oyo akokani naye, mpe azali oyo ayokaka mpe amonaka. info
التفاسير:

external-link copy
12 : 42

لَهُۥ مَقَالِيدُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۖ يَبۡسُطُ ٱلرِّزۡقَ لِمَن يَشَآءُ وَيَقۡدِرُۚ إِنَّهُۥ بِكُلِّ شَيۡءٍ عَلِيمٞ

12. Bafungola ya bomengo ya likolo na ya mabele bizali bia ye, apesaka bozui na oyo alingi mpe akutolaka na oyo alingi. Azali na boyebi ya biloko binso. info
التفاسير:

external-link copy
13 : 42

۞ شَرَعَ لَكُم مِّنَ ٱلدِّينِ مَا وَصَّىٰ بِهِۦ نُوحٗا وَٱلَّذِيٓ أَوۡحَيۡنَآ إِلَيۡكَ وَمَا وَصَّيۡنَا بِهِۦٓ إِبۡرَٰهِيمَ وَمُوسَىٰ وَعِيسَىٰٓۖ أَنۡ أَقِيمُواْ ٱلدِّينَ وَلَا تَتَفَرَّقُواْ فِيهِۚ كَبُرَ عَلَى ٱلۡمُشۡرِكِينَ مَا تَدۡعُوهُمۡ إِلَيۡهِۚ ٱللَّهُ يَجۡتَبِيٓ إِلَيۡهِ مَن يَشَآءُ وَيَهۡدِيٓ إِلَيۡهِ مَن يُنِيبُ

13. Apesi bino mibeko ya (makambo ya) lingomba ndenge moko apesaki na Nûh, mpe oyo tozali komonisela yo mpe oyo topesaki Ibrâhîm, na Mûssa mpe Issa ete: Botelemisa lingomba, kasi bokabwana na yango te. Ezali likambo monene epai ya basangisi (Allah) na maye ozali kobenga bango тропа yango. Allah aponaka pembeni naye moto oyo alingi, mpe azali kokamba epai naye oyo azali kotubela. info
التفاسير:

external-link copy
14 : 42

وَمَا تَفَرَّقُوٓاْ إِلَّا مِنۢ بَعۡدِ مَا جَآءَهُمُ ٱلۡعِلۡمُ بَغۡيَۢا بَيۡنَهُمۡۚ وَلَوۡلَا كَلِمَةٞ سَبَقَتۡ مِن رَّبِّكَ إِلَىٰٓ أَجَلٖ مُّسَمّٗى لَّقُضِيَ بَيۡنَهُمۡۚ وَإِنَّ ٱلَّذِينَ أُورِثُواْ ٱلۡكِتَٰبَ مِنۢ بَعۡدِهِمۡ لَفِي شَكّٖ مِّنۡهُ مُرِيبٖ

14. Mpe bakabwanaki te sé sima ya koyela bango boyebi, na maye oyo ekweyaki kati kati na bango. Soki ezalaki te ete liloba lisila kokomama epai ya Nkolo wa yo na tango oyo eyebani, alingaki kokata kati kati na bango. Mpe ya soló, baye bakitanaki buku sima na bango, bazali na tembe makasi bazali komiyeba te. info
التفاسير:

external-link copy
15 : 42

فَلِذَٰلِكَ فَٱدۡعُۖ وَٱسۡتَقِمۡ كَمَآ أُمِرۡتَۖ وَلَا تَتَّبِعۡ أَهۡوَآءَهُمۡۖ وَقُلۡ ءَامَنتُ بِمَآ أَنزَلَ ٱللَّهُ مِن كِتَٰبٖۖ وَأُمِرۡتُ لِأَعۡدِلَ بَيۡنَكُمُۖ ٱللَّهُ رَبُّنَا وَرَبُّكُمۡۖ لَنَآ أَعۡمَٰلُنَا وَلَكُمۡ أَعۡمَٰلُكُمۡۖ لَا حُجَّةَ بَيۡنَنَا وَبَيۡنَكُمُۖ ٱللَّهُ يَجۡمَعُ بَيۡنَنَاۖ وَإِلَيۡهِ ٱلۡمَصِيرُ

15. Benga na lolenge wana tikala na nzela ya semba lolenge batinda yo, kolanda bamposa na bango te, mpe loba; nandimi na maye Allah akitisa kati na buku, mpe natindamaki тропа kokata na bosembo kati kati na bino. Allah azali Nkolo wa biso тре Nkolo wa bino, tozali na misala mia biso тре bozali na oyo ya bino, likambo moko ekoki kosalema te kati kati na biso na bino. Allah akosangisaka biso, тре epai naye nde bozongi (bokozalaka) info
التفاسير: