ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ

លេខ​ទំព័រ:close

external-link copy
78 : 40

وَلَقَدۡ أَرۡسَلۡنَا رُسُلٗا مِّن قَبۡلِكَ مِنۡهُم مَّن قَصَصۡنَا عَلَيۡكَ وَمِنۡهُم مَّن لَّمۡ نَقۡصُصۡ عَلَيۡكَۗ وَمَا كَانَ لِرَسُولٍ أَن يَأۡتِيَ بِـَٔايَةٍ إِلَّا بِإِذۡنِ ٱللَّهِۚ فَإِذَا جَآءَ أَمۡرُ ٱللَّهِ قُضِيَ بِٱلۡحَقِّ وَخَسِرَ هُنَالِكَ ٱلۡمُبۡطِلُونَ

78. Ya sólo, tosilaki kotinda yambo nayo batindami, kati na bango tobetelaki yo masolo, mpe тропа basusu tobetelaki yo te. Mpe motindami akokaki koya na elembo (mokapo) te sé ezala na ndingisa ya Allah. Mpe tango motindo mwa Allah mokoyaka, makambo manso makokatamaka na bosôló, mpe baye balingaki sé kobuka lokuta, bakozangaka. info
التفاسير:

external-link copy
79 : 40

ٱللَّهُ ٱلَّذِي جَعَلَ لَكُمُ ٱلۡأَنۡعَٰمَ لِتَرۡكَبُواْ مِنۡهَا وَمِنۡهَا تَأۡكُلُونَ

79. Allah nde akeli тропа bino banyama mpo bomataka likolo na yango, mpe misusu boliaka yango. info
التفاسير:

external-link copy
80 : 40

وَلَكُمۡ فِيهَا مَنَٰفِعُ وَلِتَبۡلُغُواْ عَلَيۡهَا حَاجَةٗ فِي صُدُورِكُمۡ وَعَلَيۡهَا وَعَلَى ٱلۡفُلۡكِ تُحۡمَلُونَ

80. Misusu ezali kosalisa bino, mpe kati na yango bozali kobimisa biloko biye bolingaka, bozali komemama likolo na yango mpe likolo ya masuwa. info
التفاسير:

external-link copy
81 : 40

وَيُرِيكُمۡ ءَايَٰتِهِۦ فَأَيَّ ءَايَٰتِ ٱللَّهِ تُنكِرُونَ

81. Mpe azali kolakisa bino bilembo bia ye, boye bilembo kani bia Allah bokoki koboya? info
التفاسير:

external-link copy
82 : 40

أَفَلَمۡ يَسِيرُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَيَنظُرُواْ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡۚ كَانُوٓاْ أَكۡثَرَ مِنۡهُمۡ وَأَشَدَّ قُوَّةٗ وَءَاثَارٗا فِي ٱلۡأَرۡضِ فَمَآ أَغۡنَىٰ عَنۡهُم مَّا كَانُواْ يَكۡسِبُونَ

82. Batambola na mokili bamona lolenge kani esukaki na baye bazalaki liboso na bango? Bazalaki ebele koleka bango mpe makasi koleka bango, mpe batikaki bikamwa ebele sima na bango? Kasi manso bazuaki masalisaki bango na eloko te. info
التفاسير:

external-link copy
83 : 40

فَلَمَّا جَآءَتۡهُمۡ رُسُلُهُم بِٱلۡبَيِّنَٰتِ فَرِحُواْ بِمَا عِندَهُم مِّنَ ٱلۡعِلۡمِ وَحَاقَ بِهِم مَّا كَانُواْ بِهِۦ يَسۡتَهۡزِءُونَ

83. Mpe tango batindami na bango bayelaki bango bilembo bia polele, bayaki mpe basepelaki nde na boyebi bwa bango, sima bazingamaki na maye bazalaki kotiola. (koseka). info
التفاسير:

external-link copy
84 : 40

فَلَمَّا رَأَوۡاْ بَأۡسَنَا قَالُوٓاْ ءَامَنَّا بِٱللَّهِ وَحۡدَهُۥ وَكَفَرۡنَا بِمَا كُنَّا بِهِۦ مُشۡرِكِينَ

84. Мре tango bamonaka etumbu makasi kowuta epai na biso, bakolobaka: Tondimi na Allah na bomoko bwa ye, mpe toboyi maye tozalaki kosangisa. info
التفاسير:

external-link copy
85 : 40

فَلَمۡ يَكُ يَنفَعُهُمۡ إِيمَٰنُهُمۡ لَمَّا رَأَوۡاْ بَأۡسَنَاۖ سُنَّتَ ٱللَّهِ ٱلَّتِي قَدۡ خَلَتۡ فِي عِبَادِهِۦۖ وَخَسِرَ هُنَالِكَ ٱلۡكَٰفِرُونَ

85. Kasi kondima na bango esalisaki bango te tango etumbu na biso esilaki kokomela bango, mobeko ya Allah uta kala likolo ya bawumbu naye, mpe na tango wana bapengwi bazangaki. info
التفاسير: