ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ

លេខ​ទំព័រ:close

external-link copy
56 : 22

ٱلۡمُلۡكُ يَوۡمَئِذٖ لِّلَّهِ يَحۡكُمُ بَيۡنَهُمۡۚ فَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ فِي جَنَّٰتِ ٱلنَّعِيمِ

56. Mokolo wana kibokonzi ekozalaka sé ya Allah a kosambisa kati na bango. Мре baye bandima mpe basali misala ya malamu, bakozalaka o kati ya lola ya kitoko. info
التفاسير:

external-link copy
57 : 22

وَٱلَّذِينَ كَفَرُواْ وَكَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِنَا فَأُوْلَٰٓئِكَ لَهُمۡ عَذَابٞ مُّهِينٞ

57. Mpe baye bapengwa mpe bazali kozua mikapo mia biso na lokuta, bango bakozalaka na etumbu ya soni. info
التفاسير:

external-link copy
58 : 22

وَٱلَّذِينَ هَاجَرُواْ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ ثُمَّ قُتِلُوٓاْ أَوۡ مَاتُواْ لَيَرۡزُقَنَّهُمُ ٱللَّهُ رِزۡقًا حَسَنٗاۚ وَإِنَّ ٱللَّهَ لَهُوَ خَيۡرُ ٱلرَّٰزِقِينَ

58. Mpe baye babimaki na nzela ya Allah, sima bakufi to babomi bango, Allah akopesa bango bozui bolamu. Mpe ya soló, Allah nde mopesi bozui koleka. info
التفاسير:

external-link copy
59 : 22

لَيُدۡخِلَنَّهُم مُّدۡخَلٗا يَرۡضَوۡنَهُۥۚ وَإِنَّ ٱللَّهَ لَعَلِيمٌ حَلِيمٞ

59. Akokotisa bango o esika eye bakosepela na yango (lola), mpe ya sólo, Allah azali moyebi mpe atonda mpiko. info
التفاسير:

external-link copy
60 : 22

۞ ذَٰلِكَۖ وَمَنۡ عَاقَبَ بِمِثۡلِ مَا عُوقِبَ بِهِۦ ثُمَّ بُغِيَ عَلَيۡهِ لَيَنصُرَنَّهُ ٱللَّهُۚ إِنَّ ٱللَّهَ لَعَفُوٌّ غَفُورٞ

60. Ndenge wana oyo akosala (mabe) lokola basalaki ye mpe sima basali ye lisusu mabe, Allah akosunga ye, kasi Allah azali molimbisi mpe alingaka bolimbisi. info
التفاسير:

external-link copy
61 : 22

ذَٰلِكَ بِأَنَّ ٱللَّهَ يُولِجُ ٱلَّيۡلَ فِي ٱلنَّهَارِ وَيُولِجُ ٱلنَّهَارَ فِي ٱلَّيۡلِ وَأَنَّ ٱللَّهَ سَمِيعُۢ بَصِيرٞ

61. Ndenge wana nde Allah akotisaka butu kati na mokolo, mpe akotisaka mokolo kati na butu. Mpe ya sólo, Allah azali moyoki momoni. info
التفاسير:

external-link copy
62 : 22

ذَٰلِكَ بِأَنَّ ٱللَّهَ هُوَ ٱلۡحَقُّ وَأَنَّ مَا يَدۡعُونَ مِن دُونِهِۦ هُوَ ٱلۡبَٰطِلُ وَأَنَّ ٱللَّهَ هُوَ ٱلۡعَلِيُّ ٱلۡكَبِيرُ

62. Wana mpo ete Allah nde azali bosembo, mpe maye bazali kobondela na botiki ye ezali mpamba. Mpe ya soló, Allah azali wa likolo monene koleka. info
التفاسير:

external-link copy
63 : 22

أَلَمۡ تَرَ أَنَّ ٱللَّهَ أَنزَلَ مِنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءٗ فَتُصۡبِحُ ٱلۡأَرۡضُ مُخۡضَرَّةًۚ إِنَّ ٱللَّهَ لَطِيفٌ خَبِيرٞ

63. Boye ozali kornona te, ya soló Allah akitisaka mayi kowuta o likolo mpe akomisi mabele (lolenge) ya mayi ya pondu?(1) Ya solo, Allah azali malamu mpe moyebi ya bansango. info

1 Mayi ya pondu: Elakisi: Bobimi ya bilona sima ya bokiti ya mbula.

التفاسير:

external-link copy
64 : 22

لَّهُۥ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِۚ وَإِنَّ ٱللَّهَ لَهُوَ ٱلۡغَنِيُّ ٱلۡحَمِيدُ

64. Maye manso mazali о likolo тре na nsé mazali ya ye. Mpe ya sólo Allah azali mozwi mpe akoka na lokumu. info
التفاسير: