ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ

លេខ​ទំព័រ:close

external-link copy
87 : 17

إِلَّا رَحۡمَةٗ مِّن رَّبِّكَۚ إِنَّ فَضۡلَهُۥ كَانَ عَلَيۡكَ كَبِيرٗا

87. Longola sé mawa kowuta epai ya Nkolo wayo. Ya sólo, bolamu bwaye epai nayo ezali ebele. info
التفاسير:

external-link copy
88 : 17

قُل لَّئِنِ ٱجۡتَمَعَتِ ٱلۡإِنسُ وَٱلۡجِنُّ عَلَىٰٓ أَن يَأۡتُواْ بِمِثۡلِ هَٰذَا ٱلۡقُرۡءَانِ لَا يَأۡتُونَ بِمِثۡلِهِۦ وَلَوۡ كَانَ بَعۡضُهُمۡ لِبَعۡضٖ ظَهِيرٗا

88. Loba: Ata soki bato mpe bilima basangani mpo basala kurani lokola oyo, bakokoka koya na lolenge na yango te ata soki bazui lisalisi ya ndenge na ndenge kati na bango. info
التفاسير:

external-link copy
89 : 17

وَلَقَدۡ صَرَّفۡنَا لِلنَّاسِ فِي هَٰذَا ٱلۡقُرۡءَانِ مِن كُلِّ مَثَلٖ فَأَبَىٰٓ أَكۡثَرُ ٱلنَّاسِ إِلَّا كُفُورٗا

89. Ya soló, tosilaki kopesa bato bandakisa nyoso na kati ya kurani kasi ebele ya bato bazali sé bapengwi. info
التفاسير:

external-link copy
90 : 17

وَقَالُواْ لَن نُّؤۡمِنَ لَكَ حَتَّىٰ تَفۡجُرَ لَنَا مِنَ ٱلۡأَرۡضِ يَنۢبُوعًا

90. Mpe balobaki: Tokondimela yo te, kino obimisela biso liziba ya mayi o kati ya mabele, info
التفاسير:

external-link copy
91 : 17

أَوۡ تَكُونَ لَكَ جَنَّةٞ مِّن نَّخِيلٖ وَعِنَبٖ فَتُفَجِّرَ ٱلۡأَنۡهَٰرَ خِلَٰلَهَا تَفۡجِيرًا

91. To, ozala na bilanga bia Naghil(1) na Inabe(2) mpe obimisa míngala ya mayi ebele mitiola o kati na yango, info

1 Naghil: Bótala: suratu Al-An’ám: 99, mpe suratu An-Nahl: 67.
2 Inabe: Bótala: suratu Al-An’ám: 99, mpe suratu An-Nahl: 67.

التفاسير:

external-link copy
92 : 17

أَوۡ تُسۡقِطَ ٱلسَّمَآءَ كَمَا زَعَمۡتَ عَلَيۡنَا كِسَفًا أَوۡ تَأۡتِيَ بِٱللَّهِ وَٱلۡمَلَٰٓئِكَةِ قَبِيلًا

92. To, okweisela biso ndambu ya mapata ndenge ozali kokanisa to oya na nzambe, to óyela biso Allah, na ba anzelu liboso na biso. info
التفاسير:

external-link copy
93 : 17

أَوۡ يَكُونَ لَكَ بَيۡتٞ مِّن زُخۡرُفٍ أَوۡ تَرۡقَىٰ فِي ٱلسَّمَآءِ وَلَن نُّؤۡمِنَ لِرُقِيِّكَ حَتَّىٰ تُنَزِّلَ عَلَيۡنَا كِتَٰبٗا نَّقۡرَؤُهُۥۗ قُلۡ سُبۡحَانَ رَبِّي هَلۡ كُنتُ إِلَّا بَشَرٗا رَّسُولٗا

93. To mpe ozala na ndako ya kitoko ezali na bonzenga ya wolo, to mpe obuta (omata) na mapata (likolo), kasi tokondima kobuta nayo wana te kino okitisela biso buku totanga yango, loba: Nkembo na Nkolo na ngai, boye ngai nazali te sé moto mpe motindami? info
التفاسير:

external-link copy
94 : 17

وَمَا مَنَعَ ٱلنَّاسَ أَن يُؤۡمِنُوٓاْ إِذۡ جَآءَهُمُ ٱلۡهُدَىٰٓ إِلَّآ أَن قَالُوٓاْ أَبَعَثَ ٱللَّهُ بَشَرٗا رَّسُولٗا

94. Eloko moko te epekisaki bato ete bandima tango bokambi eyelaki bango sé balobaka ete: Allah akotinda moto azala motindami? info
التفاسير:

external-link copy
95 : 17

قُل لَّوۡ كَانَ فِي ٱلۡأَرۡضِ مَلَٰٓئِكَةٞ يَمۡشُونَ مُطۡمَئِنِّينَ لَنَزَّلۡنَا عَلَيۡهِم مِّنَ ٱلسَّمَآءِ مَلَكٗا رَّسُولٗا

95. Loba: Soki ba anzelu batambolaka na kimia likolo ya mabele, tolingaki kokitisela bango kowuta o likolo motindami azala anzelu. info
التفاسير:

external-link copy
96 : 17

قُلۡ كَفَىٰ بِٱللَّهِ شَهِيدَۢا بَيۡنِي وَبَيۡنَكُمۡۚ إِنَّهُۥ كَانَ بِعِبَادِهِۦ خَبِيرَۢا بَصِيرٗا

96. Loba: Allah akoki тропа kozala nzeneneke kati kati na bino na ngai. Ya soló, ye azali na sango mpe amonaka bawumbu naye. info
التفاسير: