Terjemahan makna Alquran Alkarim - Terjemahan Berbahasa Lingala - Muhammad Balingongo

Nomor Halaman:close

external-link copy
17 : 56

يَطُوفُ عَلَيۡهِمۡ وِلۡدَٰنٞ مُّخَلَّدُونَ

17. Kati na yango bilenge mibali bakozalaka wana тропа kosalela bango libela na libela, info
التفاسير:

external-link copy
18 : 56

بِأَكۡوَابٖ وَأَبَارِيقَ وَكَأۡسٖ مِّن مَّعِينٖ

18. Mpe bakopo na bitiyelo, mpe nkeni mitondi na masanga ya elengi. (тропа bomeli). info
التفاسير:

external-link copy
19 : 56

لَّا يُصَدَّعُونَ عَنۡهَا وَلَا يُنزِفُونَ

19. (Masanga wana) ekolangwisaka bango te mpe ekopesaka bango mutu pasi te. info
التفاسير:

external-link copy
20 : 56

وَفَٰكِهَةٖ مِّمَّا يَتَخَيَّرُونَ

20. Mpe (bakoliaka) bambuma oyo bakolingaka, info
التفاسير:

external-link copy
21 : 56

وَلَحۡمِ طَيۡرٖ مِّمَّا يَشۡتَهُونَ

21. Mpe (bakoliaka) lolenge nyoso ya mișuni ya bandeke oyo balingi. info
التفاسير:

external-link copy
22 : 56

وَحُورٌ عِينٞ

22. Mpe bakozalaka na basi ya miso ya minene mpe ya kitoko na kotala, info
التفاسير:

external-link copy
23 : 56

كَأَمۡثَٰلِ ٱللُّؤۡلُوِٕ ٱلۡمَكۡنُونِ

23. Lokola mabanga kitoko ya ebale ezali kongenga, info
التفاسير:

external-link copy
24 : 56

جَزَآءَۢ بِمَا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ

24. Lifuta тропа maye basalaki. info
التفاسير:

external-link copy
25 : 56

لَا يَسۡمَعُونَ فِيهَا لَغۡوٗا وَلَا تَأۡثِيمًا

25. Okati na yango, bakoyoka maloba mabe te, mpe ya pamba pamba te. info
التفاسير:

external-link copy
26 : 56

إِلَّا قِيلٗا سَلَٰمٗا سَلَٰمٗا

26. Bakolobaka se: Liloba ya kimia na kimia. info
التفاسير:

external-link copy
27 : 56

وَأَصۡحَٰبُ ٱلۡيَمِينِ مَآ أَصۡحَٰبُ ٱلۡيَمِينِ

27. Mpe bato ya loboko ya mobali, ba nani yango bato ya loboko ya mobali! info
التفاسير:

external-link copy
28 : 56

فِي سِدۡرٖ مَّخۡضُودٖ

28. Bakofanda na nsé ya banzete oyo bizanga nzube. Sidr, info
التفاسير:

external-link copy
29 : 56

وَطَلۡحٖ مَّنضُودٖ

29. Na banzete ya makemba na bitabe, info
التفاسير:

external-link copy
30 : 56

وَظِلّٖ مَّمۡدُودٖ

30. Na nsé ya malili ya monene, info
التفاسير:

external-link copy
31 : 56

وَمَآءٖ مَّسۡكُوبٖ

31. (pene) na mayi oyo ezali kolekana ya libela, info
التفاسير:

external-link copy
32 : 56

وَفَٰكِهَةٖ كَثِيرَةٖ

32. Mpe bambuma ebele, info
التفاسير:

external-link copy
33 : 56

لَّا مَقۡطُوعَةٖ وَلَا مَمۡنُوعَةٖ

33. Babuki yango te mpe epekisami te. info
التفاسير:

external-link copy
34 : 56

وَفُرُشٖ مَّرۡفُوعَةٍ

34. O likolo lia bambeto ya likolo. info
التفاسير:

external-link copy
35 : 56

إِنَّآ أَنشَأۡنَٰهُنَّ إِنشَآءٗ

35. Biso nde tokelaki bango na bokeli, info
التفاسير:

external-link copy
36 : 56

فَجَعَلۡنَٰهُنَّ أَبۡكَارًا

36. Mpe tosalaki bango bayebi mibali te, info
التفاسير:

external-link copy
37 : 56

عُرُبًا أَتۡرَابٗا

37. Bazali bambula ndenge moko. info
التفاسير:

external-link copy
38 : 56

لِّأَصۡحَٰبِ ٱلۡيَمِينِ

38. Mpona bato ya loboko ya mobali. info
التفاسير:

external-link copy
39 : 56

ثُلَّةٞ مِّنَ ٱلۡأَوَّلِينَ

39. Baponami ebele bazuami okati ya baye baleka liboso, info
التفاسير:

external-link copy
40 : 56

وَثُلَّةٞ مِّنَ ٱلۡأٓخِرِينَ

40. Bazali mpe ebele okati ya bato ya suka. info
التفاسير:

external-link copy
41 : 56

وَأَصۡحَٰبُ ٱلشِّمَالِ مَآ أَصۡحَٰبُ ٱلشِّمَالِ

41. Мре bato ya ngambu ya loboko ya mwasi, ba nani yango wana! info
التفاسير:

external-link copy
42 : 56

فِي سَمُومٖ وَحَمِيمٖ

42. Bakozalaka na kati ya mopepe ya moto ya lifelo, mpe na mayi ya moto makasi koleka, info
التفاسير:

external-link copy
43 : 56

وَظِلّٖ مِّن يَحۡمُومٖ

43. Mpe na nsé ya elili ya milinga ya moyindo, info
التفاسير:

external-link copy
44 : 56

لَّا بَارِدٖ وَلَا كَرِيمٍ

44. (kati na yango) malili te mpe kitoko te. info
التفاسير:

external-link copy
45 : 56

إِنَّهُمۡ كَانُواْ قَبۡلَ ذَٰلِكَ مُتۡرَفِينَ

45. Bazalaki liboso na bomoyi ya kitoko. info
التفاسير:

external-link copy
46 : 56

وَكَانُواْ يُصِرُّونَ عَلَى ٱلۡحِنثِ ٱلۡعَظِيمِ

46. Bazalaki kosala masumu minene mpe kosangisa Allah mingi. info
التفاسير:

external-link copy
47 : 56

وَكَانُواْ يَقُولُونَ أَئِذَا مِتۡنَا وَكُنَّا تُرَابٗا وَعِظَٰمًا أَءِنَّا لَمَبۡعُوثُونَ

47. (Bazali koloba): Soki tokufi tokomi mikuwa mpe putulu, boye tokosekwisamaka lisusu? info
التفاسير:

external-link copy
48 : 56

أَوَءَابَآؤُنَا ٱلۡأَوَّلُونَ

48. Na bankoko ya biso ya yambo? info
التفاسير:

external-link copy
49 : 56

قُلۡ إِنَّ ٱلۡأَوَّلِينَ وَٱلۡأٓخِرِينَ

49. Loba: Ya soló, ba oyo ya liboso na ya suka, info
التفاسير:

external-link copy
50 : 56

لَمَجۡمُوعُونَ إِلَىٰ مِيقَٰتِ يَوۡمٖ مَّعۡلُومٖ

50. Bakosangisama na bokutani ya mokolo moyebani. info
التفاسير: