Terjemahan makna Alquran Alkarim - Terjemahan Berbahasa Lingala - Muhammad Balingongo

Nomor Halaman:close

external-link copy
234 : 2

وَٱلَّذِينَ يُتَوَفَّوۡنَ مِنكُمۡ وَيَذَرُونَ أَزۡوَٰجٗا يَتَرَبَّصۡنَ بِأَنفُسِهِنَّ أَرۡبَعَةَ أَشۡهُرٖ وَعَشۡرٗاۖ فَإِذَا بَلَغۡنَ أَجَلَهُنَّ فَلَا جُنَاحَ عَلَيۡكُمۡ فِيمَا فَعَلۡنَ فِيٓ أَنفُسِهِنَّ بِٱلۡمَعۡرُوفِۗ وَٱللَّهُ بِمَا تَعۡمَلُونَ خَبِيرٞ

234. Mpe baye liwa lizui bango okati na bino mpe batiki basi ba bango, esengeli bazela sanza minei na mikolo zomi eleka. Mpe soki bakokisi elaka na bango ezali lisumu te epai na bino na lotomo eye bango moko bakokisi na banzoto na bango na ndenge ya malamu. Allah azali na sango ya maye manso bozali kosala. info
التفاسير:

external-link copy
235 : 2

وَلَا جُنَاحَ عَلَيۡكُمۡ فِيمَا عَرَّضۡتُم بِهِۦ مِنۡ خِطۡبَةِ ٱلنِّسَآءِ أَوۡ أَكۡنَنتُمۡ فِيٓ أَنفُسِكُمۡۚ عَلِمَ ٱللَّهُ أَنَّكُمۡ سَتَذۡكُرُونَهُنَّ وَلَٰكِن لَّا تُوَاعِدُوهُنَّ سِرًّا إِلَّآ أَن تَقُولُواْ قَوۡلٗا مَّعۡرُوفٗاۚ وَلَا تَعۡزِمُواْ عُقۡدَةَ ٱلنِّكَاحِ حَتَّىٰ يَبۡلُغَ ٱلۡكِتَٰبُ أَجَلَهُۥۚ وَٱعۡلَمُوٓاْ أَنَّ ٱللَّهَ يَعۡلَمُ مَا فِيٓ أَنفُسِكُمۡ فَٱحۡذَرُوهُۚ وَٱعۡلَمُوٓاْ أَنَّ ٱللَّهَ غَفُورٌ حَلِيمٞ

235. Mpe ezali mabe te likolo na bino, soki boyebisi bakufeli mibali, mpona libala to bobombi yango na mitema na bino Allah ya sôló ayebaki ete bokokanisa bango. Kasi bolaka bango te na bokuku sé ezala maloba ya malamu. Mpe bozua mikano ya libala te kino mikolo mia bango ya sanza minei na mikolo zomi mikoka. Mpe boyeba ete ya sôló Allah ayebi maye mazuami okati ya milimo mia bino mpe bokeba naye, mpe boyeba ete ya sôló Allah azali molimbisi atonda ngolu. info
التفاسير:

external-link copy
236 : 2

لَّا جُنَاحَ عَلَيۡكُمۡ إِن طَلَّقۡتُمُ ٱلنِّسَآءَ مَا لَمۡ تَمَسُّوهُنَّ أَوۡ تَفۡرِضُواْ لَهُنَّ فَرِيضَةٗۚ وَمَتِّعُوهُنَّ عَلَى ٱلۡمُوسِعِ قَدَرُهُۥ وَعَلَى ٱلۡمُقۡتِرِ قَدَرُهُۥ مَتَٰعَۢا بِٱلۡمَعۡرُوفِۖ حَقًّا عَلَى ٱلۡمُحۡسِنِينَ

236. Ezali mabe te likolo na bino soki bokabwani na basi na bino oyo nanu bosangani na bango te, to bopesi bango mahr(1) te. Bopesa bango mwa eloko. Moto ya bozui na bokoki naye mobola mpe na bokoki naye na ndenge elongobani. Ezali lotomo epai ya bato ya malamu. info

1 Mbongo ya libala.

التفاسير:

external-link copy
237 : 2

وَإِن طَلَّقۡتُمُوهُنَّ مِن قَبۡلِ أَن تَمَسُّوهُنَّ وَقَدۡ فَرَضۡتُمۡ لَهُنَّ فَرِيضَةٗ فَنِصۡفُ مَا فَرَضۡتُمۡ إِلَّآ أَن يَعۡفُونَ أَوۡ يَعۡفُوَاْ ٱلَّذِي بِيَدِهِۦ عُقۡدَةُ ٱلنِّكَاحِۚ وَأَن تَعۡفُوٓاْ أَقۡرَبُ لِلتَّقۡوَىٰۚ وَلَا تَنسَوُاْ ٱلۡفَضۡلَ بَيۡنَكُمۡۚ إِنَّ ٱللَّهَ بِمَا تَعۡمَلُونَ بَصِيرٌ

237. Mpe soki bokabwani na bango liboso ete bosangana na bango, na sima ya koyokana na mahr, bopesa bango ndambo ya mahr sé soki bango moko baboyi kozua yango, to moto oyo azalaki Nkolo ya libala, mpe soki bolimbisi, wana nde ezali malamu pembeni ya bobangi (Allah). Mpe bobosana te bosalisani kati na bino, ya sôló Allah azali komona maye bozali kosala. info
التفاسير: