Terjemahan makna Alquran Alkarim - Terjemahan Berbahasa Lingala - Muhammad Balingongo

Nomor Halaman: 239:235 close

external-link copy
38 : 12

وَٱتَّبَعۡتُ مِلَّةَ ءَابَآءِيٓ إِبۡرَٰهِيمَ وَإِسۡحَٰقَ وَيَعۡقُوبَۚ مَا كَانَ لَنَآ أَن نُّشۡرِكَ بِٱللَّهِ مِن شَيۡءٖۚ ذَٰلِكَ مِن فَضۡلِ ٱللَّهِ عَلَيۡنَا وَعَلَى ٱلنَّاسِ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يَشۡكُرُونَ

38. Mpe nalandi lingomba lia baboti na ngai, Ibrâhîm na Is’hâq na Ya’qüb. Esengeli na biso te tosangisa Allah na eloko mosusu. Wana nde bolamu bwa Allah epai na biso na epai ya bato banso, kasi ebele ya bato bazali kotondo te. info
التفاسير:

external-link copy
39 : 12

يَٰصَٰحِبَيِ ٱلسِّجۡنِ ءَأَرۡبَابٞ مُّتَفَرِّقُونَ خَيۡرٌ أَمِ ٱللَّهُ ٱلۡوَٰحِدُ ٱلۡقَهَّارُ

39. Oh! Bato ba ngai ba boloko! Boye binzambe nzambe bazali malamu koleka to Allah wa bomoko mpe wa bokoki? info
التفاسير:

external-link copy
40 : 12

مَا تَعۡبُدُونَ مِن دُونِهِۦٓ إِلَّآ أَسۡمَآءٗ سَمَّيۡتُمُوهَآ أَنتُمۡ وَءَابَآؤُكُم مَّآ أَنزَلَ ٱللَّهُ بِهَا مِن سُلۡطَٰنٍۚ إِنِ ٱلۡحُكۡمُ إِلَّا لِلَّهِ أَمَرَ أَلَّا تَعۡبُدُوٓاْ إِلَّآ إِيَّاهُۚ ذَٰلِكَ ٱلدِّينُ ٱلۡقَيِّمُ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يَعۡلَمُونَ

40. Bozali kobondela basusu botiki ye, bazali sé bankombo oyo bopesi bino moko na bankoko na bino biye Allah akitisaki elembetele te. Kasi mobeko ezali sé ya Allah atindaka sé bobondela ye moko. Wana nde lingomba lia semba, kasi ebele ya bato bazali koyeba te. info
التفاسير:

external-link copy
41 : 12

يَٰصَٰحِبَيِ ٱلسِّجۡنِ أَمَّآ أَحَدُكُمَا فَيَسۡقِي رَبَّهُۥ خَمۡرٗاۖ وَأَمَّا ٱلۡأٓخَرُ فَيُصۡلَبُ فَتَأۡكُلُ ٱلطَّيۡرُ مِن رَّأۡسِهِۦۚ قُضِيَ ٱلۡأَمۡرُ ٱلَّذِي فِيهِ تَسۡتَفۡتِيَانِ

41. Oh bato ba ngai ba boloko! Mpona ndoto na bino, moko kati na bino akomelisa mokonzi naye masanga, mpe mosusu bakobaka ye, mpe bandeke bakolia motu naye. Likambo liye botunaki ngai lisili kokatama. info
التفاسير:

external-link copy
42 : 12

وَقَالَ لِلَّذِي ظَنَّ أَنَّهُۥ نَاجٖ مِّنۡهُمَا ٱذۡكُرۡنِي عِندَ رَبِّكَ فَأَنسَىٰهُ ٱلشَّيۡطَٰنُ ذِكۡرَ رَبِّهِۦ فَلَبِثَ فِي ٱلسِّجۡنِ بِضۡعَ سِنِينَ

42. Mpe (Yûsuf) alobi na oyo abimaki na boloko: Lobela ngai epai ya mokonzi nayo. Kasi satana abosanisi ye bokundoli bwa Nkolo naye, yango awumelaki na boloko pene na mibu ebele. info
التفاسير:

external-link copy
43 : 12

وَقَالَ ٱلۡمَلِكُ إِنِّيٓ أَرَىٰ سَبۡعَ بَقَرَٰتٖ سِمَانٖ يَأۡكُلُهُنَّ سَبۡعٌ عِجَافٞ وَسَبۡعَ سُنۢبُلَٰتٍ خُضۡرٖ وَأُخَرَ يَابِسَٰتٖۖ يَٰٓأَيُّهَا ٱلۡمَلَأُ أَفۡتُونِي فِي رُءۡيَٰيَ إِن كُنتُمۡ لِلرُّءۡيَا تَعۡبُرُونَ

43. Mpe mokonzi alobi: Ya sôló namoni na ndoto, bangombe sambo ya nzoto kolongonu bizali koliama na bangombe sambo ya kokondo, mpe bambuma sambo ya mayi mapondu mpe misusu ya kokauka. Eh bankumu! Bopesa ngai ndimbola ya ndoto ya ngai, soki boyebi kolimbola ndoto. info
التفاسير: