क़ुरआन के अर्थों का अनुवाद - लिंगाला अनुवाद - मुहम्मद बालिंगोगो

पृष्ठ संख्या:close

external-link copy
52 : 20

قَالَ عِلۡمُهَا عِندَ رَبِّي فِي كِتَٰبٖۖ لَّا يَضِلُّ رَبِّي وَلَا يَنسَى

52. (Mûssa) alobi: Oyo ayebi makambo na bango ezali nde Nkolo wa ngai, ekomama o kati ya buku, Nkolo wa ngai abungaka te, mpe abosanaka te. info
التفاسير:

external-link copy
53 : 20

ٱلَّذِي جَعَلَ لَكُمُ ٱلۡأَرۡضَ مَهۡدٗا وَسَلَكَ لَكُمۡ فِيهَا سُبُلٗا وَأَنزَلَ مِنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءٗ فَأَخۡرَجۡنَا بِهِۦٓ أَزۡوَٰجٗا مِّن نَّبَاتٖ شَتَّىٰ

53. Oyo asalelaki bino mabele ezala lokola mbeto mpe atiela bino banzela okati na yango, mpe azali kokitisela bino mayi kowuta o likolo, mpe na yango tobimisaka milona ndenge na ndenge, info
التفاسير:

external-link copy
54 : 20

كُلُواْ وَٱرۡعَوۡاْ أَنۡعَٰمَكُمۡۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٖ لِّأُوْلِي ٱلنُّهَىٰ

54. Boliya mpe boleyisa bibwele na bino. Ya soló, wana nde bilembo тропа baye bazali kokanisa (bazali na mayele) info
التفاسير:

external-link copy
55 : 20

۞ مِنۡهَا خَلَقۡنَٰكُمۡ وَفِيهَا نُعِيدُكُمۡ وَمِنۡهَا نُخۡرِجُكُمۡ تَارَةً أُخۡرَىٰ

55. Tokelaki bino kowuta na yango (mabele) mpe kati na yango nde tokozongisa bino, mpe tokobimisa bino lisusu okati na yango mbala mosusu. info
التفاسير:

external-link copy
56 : 20

وَلَقَدۡ أَرَيۡنَٰهُ ءَايَٰتِنَا كُلَّهَا فَكَذَّبَ وَأَبَىٰ

56. Mpe tosilaki kolakisa ye bilembo bia biso nyoso, kasi aboyaki kondima. info
التفاسير:

external-link copy
57 : 20

قَالَ أَجِئۡتَنَا لِتُخۡرِجَنَا مِنۡ أَرۡضِنَا بِسِحۡرِكَ يَٰمُوسَىٰ

57. (Falo) alobi: Oh Mûssa! Boye oyeli biso bonganga bwa yo mpo obimisa biso na mabele na biso? info
التفاسير:

external-link copy
58 : 20

فَلَنَأۡتِيَنَّكَ بِسِحۡرٖ مِّثۡلِهِۦ فَٱجۡعَلۡ بَيۡنَنَا وَبَيۡنَكَ مَوۡعِدٗا لَّا نُخۡلِفُهُۥ نَحۡنُ وَلَآ أَنتَ مَكَانٗا سُوٗى

58. Kasi tokoyela yo bonganga lokola yango, tiela biso elaka mpo moko kati na biso azanga te, ezala na esika ya malamu. info
التفاسير:

external-link copy
59 : 20

قَالَ مَوۡعِدُكُمۡ يَوۡمُ ٱلزِّينَةِ وَأَن يُحۡشَرَ ٱلنَّاسُ ضُحٗى

59. (Mûssa) alobi: Elaka na biso ekozala o mokolo mwa eyenga, mpe bato basangana na tongo. info
التفاسير:

external-link copy
60 : 20

فَتَوَلَّىٰ فِرۡعَوۡنُ فَجَمَعَ كَيۡدَهُۥ ثُمَّ أَتَىٰ

60. Falo akei mpe asangisi bato naye na kibondoki na bango, sima bayei koyanola na elaka. info
التفاسير:

external-link copy
61 : 20

قَالَ لَهُم مُّوسَىٰ وَيۡلَكُمۡ لَا تَفۡتَرُواْ عَلَى ٱللَّهِ كَذِبٗا فَيُسۡحِتَكُم بِعَذَابٖۖ وَقَدۡ خَابَ مَنِ ٱفۡتَرَىٰ

61. Mûssa ayebisi bango: Mabe ezala na bino, bobukela Allah lokuta te, noki te etumbu ekozua bino. Na oyo akobukela Allah lokuta, asili kobungisama. info
التفاسير:

external-link copy
62 : 20

فَتَنَٰزَعُوٓاْ أَمۡرَهُم بَيۡنَهُمۡ وَأَسَرُّواْ ٱلنَّجۡوَىٰ

62. Nasima bakomaki kolobana bango na bango nasekele. info
التفاسير:

external-link copy
63 : 20

قَالُوٓاْ إِنۡ هَٰذَٰنِ لَسَٰحِرَٰنِ يُرِيدَانِ أَن يُخۡرِجَاكُم مِّنۡ أَرۡضِكُم بِسِحۡرِهِمَا وَيَذۡهَبَا بِطَرِيقَتِكُمُ ٱلۡمُثۡلَىٰ

63. Balobi: Ba oyo bazali banganga mibale, balingi kobimisa bino na mabele na bino na bonganga na bango, mpe botika nzela ya malamu oyo bozali na yango. info
التفاسير:

external-link copy
64 : 20

فَأَجۡمِعُواْ كَيۡدَكُمۡ ثُمَّ ٱئۡتُواْ صَفّٗاۚ وَقَدۡ أَفۡلَحَ ٱلۡيَوۡمَ مَنِ ٱسۡتَعۡلَىٰ

64. Bosangisa bonganga na bino nyoso, mpe bosala molongo. Mpe oyo akozala likolo asili kolonga. info
التفاسير: