કુરઆન મજીદના શબ્દોનું ભાષાંતર - લિંગાલા ભાષામાં અનુવાદ - મુહમ્મદ બલિનગોગો

Al-Wâqi-a

external-link copy
1 : 56

إِذَا وَقَعَتِ ٱلۡوَاقِعَةُ

1. Tango likambo monene ekokweya, info
التفاسير:

external-link copy
2 : 56

لَيۡسَ لِوَقۡعَتِهَا كَاذِبَةٌ

2. Koya na yango ezali lokuta te. info
التفاسير:

external-link copy
3 : 56

خَافِضَةٞ رَّافِعَةٌ

3. Akokitisaka (basusu) mpe akotombolaka (basusu) info
التفاسير:

external-link copy
4 : 56

إِذَا رُجَّتِ ٱلۡأَرۡضُ رَجّٗا

4. Tango mabele makoninganaka makasi, info
التفاسير:

external-link copy
5 : 56

وَبُسَّتِ ٱلۡجِبَالُ بَسّٗا

5. Mpe tango bangomba bikokutoamaka mike mike, info
التفاسير:

external-link copy
6 : 56

فَكَانَتۡ هَبَآءٗ مُّنۢبَثّٗا

6. Mpe mikokoma putulu mizali kopanzana. info
التفاسير:

external-link copy
7 : 56

وَكُنتُمۡ أَزۡوَٰجٗا ثَلَٰثَةٗ

7. Mpe bokozalaka lisanga misato: info
التفاسير:

external-link copy
8 : 56

فَأَصۡحَٰبُ ٱلۡمَيۡمَنَةِ مَآ أَصۡحَٰبُ ٱلۡمَيۡمَنَةِ

8. Bato ya ngambu ya loboko ya mobali bango ba nani bato ya ngambu ya loboko ya mobali! info
التفاسير:

external-link copy
9 : 56

وَأَصۡحَٰبُ ٱلۡمَشۡـَٔمَةِ مَآ أَصۡحَٰبُ ٱلۡمَشۡـَٔمَةِ

9. Mpe bato ya ngambu ya loboko ya mwasi bango ba nani bato ya ngambu ya loboko ya mwasi! info
التفاسير:

external-link copy
10 : 56

وَٱلسَّٰبِقُونَ ٱلسَّٰبِقُونَ

10. Bato ya liboso (baye balandaki mibeko mia Allah na mabele) bakozalaka bato ya liboso na mokolo ya suka. info
التفاسير:

external-link copy
11 : 56

أُوْلَٰٓئِكَ ٱلۡمُقَرَّبُونَ

11. Baye wana nde bakozalaka pene na Allah. info
التفاسير:

external-link copy
12 : 56

فِي جَنَّٰتِ ٱلنَّعِيمِ

12. O kati ya bilanga (bia lola) ya bolamu. info
التفاسير:

external-link copy
13 : 56

ثُلَّةٞ مِّنَ ٱلۡأَوَّلِينَ

13. Bazali ebele oyo baponami kowuta na bato ya liboso, info
التفاسير:

external-link copy
14 : 56

وَقَلِيلٞ مِّنَ ٱلۡأٓخِرِينَ

14. Мре moke okati ya bato ya sima. info
التفاسير:

external-link copy
15 : 56

عَلَىٰ سُرُرٖ مَّوۡضُونَةٖ

15. (Bakolala) likolo lia bambeto bibongisami na wolo, info
التفاسير:

external-link copy
16 : 56

مُّتَّكِـِٔينَ عَلَيۡهَا مُتَقَٰبِلِينَ

16. Bayekami likolo na yango bazali kotalana. (na kimia) info
التفاسير:

external-link copy
17 : 56

يَطُوفُ عَلَيۡهِمۡ وِلۡدَٰنٞ مُّخَلَّدُونَ

17. Kati na yango bilenge mibali bakozalaka wana тропа kosalela bango libela na libela, info
التفاسير:

external-link copy
18 : 56

بِأَكۡوَابٖ وَأَبَارِيقَ وَكَأۡسٖ مِّن مَّعِينٖ

18. Mpe bakopo na bitiyelo, mpe nkeni mitondi na masanga ya elengi. (тропа bomeli). info
التفاسير:

external-link copy
19 : 56

لَّا يُصَدَّعُونَ عَنۡهَا وَلَا يُنزِفُونَ

19. (Masanga wana) ekolangwisaka bango te mpe ekopesaka bango mutu pasi te. info
التفاسير:

external-link copy
20 : 56

وَفَٰكِهَةٖ مِّمَّا يَتَخَيَّرُونَ

20. Mpe (bakoliaka) bambuma oyo bakolingaka, info
التفاسير:

external-link copy
21 : 56

وَلَحۡمِ طَيۡرٖ مِّمَّا يَشۡتَهُونَ

21. Mpe (bakoliaka) lolenge nyoso ya mișuni ya bandeke oyo balingi. info
التفاسير:

external-link copy
22 : 56

وَحُورٌ عِينٞ

22. Mpe bakozalaka na basi ya miso ya minene mpe ya kitoko na kotala, info
التفاسير:

external-link copy
23 : 56

كَأَمۡثَٰلِ ٱللُّؤۡلُوِٕ ٱلۡمَكۡنُونِ

23. Lokola mabanga kitoko ya ebale ezali kongenga, info
التفاسير:

external-link copy
24 : 56

جَزَآءَۢ بِمَا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ

24. Lifuta тропа maye basalaki. info
التفاسير:

external-link copy
25 : 56

لَا يَسۡمَعُونَ فِيهَا لَغۡوٗا وَلَا تَأۡثِيمًا

25. Okati na yango, bakoyoka maloba mabe te, mpe ya pamba pamba te. info
التفاسير:

external-link copy
26 : 56

إِلَّا قِيلٗا سَلَٰمٗا سَلَٰمٗا

26. Bakolobaka se: Liloba ya kimia na kimia. info
التفاسير:

external-link copy
27 : 56

وَأَصۡحَٰبُ ٱلۡيَمِينِ مَآ أَصۡحَٰبُ ٱلۡيَمِينِ

27. Mpe bato ya loboko ya mobali, ba nani yango bato ya loboko ya mobali! info
التفاسير:

external-link copy
28 : 56

فِي سِدۡرٖ مَّخۡضُودٖ

28. Bakofanda na nsé ya banzete oyo bizanga nzube. Sidr, info
التفاسير:

external-link copy
29 : 56

وَطَلۡحٖ مَّنضُودٖ

29. Na banzete ya makemba na bitabe, info
التفاسير:

external-link copy
30 : 56

وَظِلّٖ مَّمۡدُودٖ

30. Na nsé ya malili ya monene, info
التفاسير:

external-link copy
31 : 56

وَمَآءٖ مَّسۡكُوبٖ

31. (pene) na mayi oyo ezali kolekana ya libela, info
التفاسير:

external-link copy
32 : 56

وَفَٰكِهَةٖ كَثِيرَةٖ

32. Mpe bambuma ebele, info
التفاسير:

external-link copy
33 : 56

لَّا مَقۡطُوعَةٖ وَلَا مَمۡنُوعَةٖ

33. Babuki yango te mpe epekisami te. info
التفاسير:

external-link copy
34 : 56

وَفُرُشٖ مَّرۡفُوعَةٍ

34. O likolo lia bambeto ya likolo. info
التفاسير:

external-link copy
35 : 56

إِنَّآ أَنشَأۡنَٰهُنَّ إِنشَآءٗ

35. Biso nde tokelaki bango na bokeli, info
التفاسير:

external-link copy
36 : 56

فَجَعَلۡنَٰهُنَّ أَبۡكَارًا

36. Mpe tosalaki bango bayebi mibali te, info
التفاسير:

external-link copy
37 : 56

عُرُبًا أَتۡرَابٗا

37. Bazali bambula ndenge moko. info
التفاسير:

external-link copy
38 : 56

لِّأَصۡحَٰبِ ٱلۡيَمِينِ

38. Mpona bato ya loboko ya mobali. info
التفاسير:

external-link copy
39 : 56

ثُلَّةٞ مِّنَ ٱلۡأَوَّلِينَ

39. Baponami ebele bazuami okati ya baye baleka liboso, info
التفاسير:

external-link copy
40 : 56

وَثُلَّةٞ مِّنَ ٱلۡأٓخِرِينَ

40. Bazali mpe ebele okati ya bato ya suka. info
التفاسير:

external-link copy
41 : 56

وَأَصۡحَٰبُ ٱلشِّمَالِ مَآ أَصۡحَٰبُ ٱلشِّمَالِ

41. Мре bato ya ngambu ya loboko ya mwasi, ba nani yango wana! info
التفاسير:

external-link copy
42 : 56

فِي سَمُومٖ وَحَمِيمٖ

42. Bakozalaka na kati ya mopepe ya moto ya lifelo, mpe na mayi ya moto makasi koleka, info
التفاسير:

external-link copy
43 : 56

وَظِلّٖ مِّن يَحۡمُومٖ

43. Mpe na nsé ya elili ya milinga ya moyindo, info
التفاسير:

external-link copy
44 : 56

لَّا بَارِدٖ وَلَا كَرِيمٍ

44. (kati na yango) malili te mpe kitoko te. info
التفاسير:

external-link copy
45 : 56

إِنَّهُمۡ كَانُواْ قَبۡلَ ذَٰلِكَ مُتۡرَفِينَ

45. Bazalaki liboso na bomoyi ya kitoko. info
التفاسير:

external-link copy
46 : 56

وَكَانُواْ يُصِرُّونَ عَلَى ٱلۡحِنثِ ٱلۡعَظِيمِ

46. Bazalaki kosala masumu minene mpe kosangisa Allah mingi. info
التفاسير:

external-link copy
47 : 56

وَكَانُواْ يَقُولُونَ أَئِذَا مِتۡنَا وَكُنَّا تُرَابٗا وَعِظَٰمًا أَءِنَّا لَمَبۡعُوثُونَ

47. (Bazali koloba): Soki tokufi tokomi mikuwa mpe putulu, boye tokosekwisamaka lisusu? info
التفاسير:

external-link copy
48 : 56

أَوَءَابَآؤُنَا ٱلۡأَوَّلُونَ

48. Na bankoko ya biso ya yambo? info
التفاسير:

external-link copy
49 : 56

قُلۡ إِنَّ ٱلۡأَوَّلِينَ وَٱلۡأٓخِرِينَ

49. Loba: Ya soló, ba oyo ya liboso na ya suka, info
التفاسير:

external-link copy
50 : 56

لَمَجۡمُوعُونَ إِلَىٰ مِيقَٰتِ يَوۡمٖ مَّعۡلُومٖ

50. Bakosangisama na bokutani ya mokolo moyebani. info
التفاسير:

external-link copy
51 : 56

ثُمَّ إِنَّكُمۡ أَيُّهَا ٱلضَّآلُّونَ ٱلۡمُكَذِّبُونَ

51. Na yango bino babungi baye boboyaki kondima (na mokolo ya suka), info
التفاسير:

external-link copy
52 : 56

لَأٓكِلُونَ مِن شَجَرٖ مِّن زَقُّومٖ

52. Bokoliaka ya soló, bitape bia nzete ya zaqqúm(1). info

1 Zaqqúm: Bótala na suratu As-Swâffât mokapo: 62.

التفاسير:

external-link copy
53 : 56

فَمَالِـُٔونَ مِنۡهَا ٱلۡبُطُونَ

53. Mabumu na bino makotondaka na yango. info
التفاسير:

external-link copy
54 : 56

فَشَٰرِبُونَ عَلَيۡهِ مِنَ ٱلۡحَمِيمِ

54. Sima bokomelaka mayi ya moto ya makasi. info
التفاسير:

external-link copy
55 : 56

فَشَٰرِبُونَ شُرۡبَ ٱلۡهِيمِ

55. Bokomelaka (yango) lolenge ibili amelaka na mposa (nyoso). info
التفاسير:

external-link copy
56 : 56

هَٰذَا نُزُلُهُمۡ يَوۡمَ ٱلدِّينِ

56. Wana nde bilei oyo bakoyambaka bango na yango o mokolo ya suka. info
التفاسير:

external-link copy
57 : 56

نَحۡنُ خَلَقۡنَٰكُمۡ فَلَوۡلَا تُصَدِّقُونَ

57. Biso nde tokela bino, kasi тропа nini bozali kondima na mokolo ya suka te? info
التفاسير:

external-link copy
58 : 56

أَفَرَءَيۡتُم مَّا تُمۡنُونَ

58. Boye bozali kornona te mayi oyo bozali kobimisa yango na mokongo? info
التفاسير:

external-link copy
59 : 56

ءَأَنتُمۡ تَخۡلُقُونَهُۥٓ أَمۡ نَحۡنُ ٱلۡخَٰلِقُونَ

59. Bino nde bokela yango to biso nde bakeli? info
التفاسير:

external-link copy
60 : 56

نَحۡنُ قَدَّرۡنَا بَيۡنَكُمُ ٱلۡمَوۡتَ وَمَا نَحۡنُ بِمَسۡبُوقِينَ

60. Biso nde tosila кокота liwa kati na bino, mpe eloko moko ekopekisa biso te, info
التفاسير:

external-link copy
61 : 56

عَلَىٰٓ أَن نُّبَدِّلَ أَمۡثَٰلَكُمۡ وَنُنشِئَكُمۡ فِي مَا لَا تَعۡلَمُونَ

61. Mpo totiya na esika na bino (bato) misusu lokola bino, mpe tobotisa bino na lolenge oyo boyebi te. info
التفاسير:

external-link copy
62 : 56

وَلَقَدۡ عَلِمۡتُمُ ٱلنَّشۡأَةَ ٱلۡأُولَىٰ فَلَوۡلَا تَذَكَّرُونَ

62. Mpe bosilaki koyeba bokeli bwa liboso; boye bozali kokanisa te? info
التفاسير:

external-link copy
63 : 56

أَفَرَءَيۡتُم مَّا تَحۡرُثُونَ

63. Boye bozali kornona biloko oyo bozali kobimisa yango (nanse ya mabele)? info
التفاسير:

external-link copy
64 : 56

ءَأَنتُمۡ تَزۡرَعُونَهُۥٓ أَمۡ نَحۡنُ ٱلزَّٰرِعُونَ

64. Ezali bino nde bolonaka yango to biso nde baloni? info
التفاسير:

external-link copy
65 : 56

لَوۡ نَشَآءُ لَجَعَلۡنَٰهُ حُطَٰمٗا فَظَلۡتُمۡ تَفَكَّهُونَ

65. Soki tolingaki, nde tokomisaki yango makala, nde botikalaki kokamwa. (mpe kobeta misapi sima) info
التفاسير:

external-link copy
66 : 56

إِنَّا لَمُغۡرَمُونَ

66. Tala biso tokomi na banyongo, info
التفاسير:

external-link copy
67 : 56

بَلۡ نَحۡنُ مَحۡرُومُونَ

67. Kasi bapimeli nde biso. info
التفاسير:

external-link copy
68 : 56

أَفَرَءَيۡتُمُ ٱلۡمَآءَ ٱلَّذِي تَشۡرَبُونَ

68. Boye bozali kornona mayi oyo bozali komela? info
التفاسير:

external-link copy
69 : 56

ءَأَنتُمۡ أَنزَلۡتُمُوهُ مِنَ ٱلۡمُزۡنِ أَمۡ نَحۡنُ ٱلۡمُنزِلُونَ

69. Bino nde bokitisaka yango kowuta na mapata to biso nde bakitisi? info
التفاسير:

external-link copy
70 : 56

لَوۡ نَشَآءُ جَعَلۡنَٰهُ أُجَاجٗا فَلَوۡلَا تَشۡكُرُونَ

70. Soki tolingaki, nde tokomisaki yango mungwa mungwa, boye тропа nini bozali kopesa matondo te? (epai ya Allah). info
التفاسير:

external-link copy
71 : 56

أَفَرَءَيۡتُمُ ٱلنَّارَ ٱلَّتِي تُورُونَ

71. Boye bozali kornona moto oyo bozali kopelisa te? info
التفاسير:

external-link copy
72 : 56

ءَأَنتُمۡ أَنشَأۡتُمۡ شَجَرَتَهَآ أَمۡ نَحۡنُ ٱلۡمُنشِـُٔونَ

72. Bino nde bokela nzete yango to biso nde bakeli? info
التفاسير:

external-link copy
73 : 56

نَحۡنُ جَعَلۡنَٰهَا تَذۡكِرَةٗ وَمَتَٰعٗا لِّلۡمُقۡوِينَ

73. Totiyaki yango ezala bokundoli (тропа lolenge lifelo ekozala), mpe esalisa baye bazali na mposa na yango (тропа baye bazali na mobembo) info
التفاسير:

external-link copy
74 : 56

فَسَبِّحۡ بِٱسۡمِ رَبِّكَ ٱلۡعَظِيمِ

74. Kumisa nkombo ya Nkolo nayo ya monene. info
التفاسير:

external-link copy
75 : 56

۞ فَلَآ أُقۡسِمُ بِمَوَٰقِعِ ٱلنُّجُومِ

75. (Te) nalapi na bisika minzoto mikweyaka, info
التفاسير:

external-link copy
76 : 56

وَإِنَّهُۥ لَقَسَمٞ لَّوۡ تَعۡلَمُونَ عَظِيمٌ

76. Ya sôló, ezali kolapa ya monene soki boyebaka, info
التفاسير:

external-link copy
77 : 56

إِنَّهُۥ لَقُرۡءَانٞ كَرِيمٞ

77. Ya soló, kurani oyo ezali na lokumu, info
التفاسير:

external-link copy
78 : 56

فِي كِتَٰبٖ مَّكۡنُونٖ

78. Ebatelami kati na buku. info
التفاسير:

external-link copy
79 : 56

لَّا يَمَسُّهُۥٓ إِلَّا ٱلۡمُطَهَّرُونَ

79. Basimbaka yango te sé na bapetoami, info
التفاسير:

external-link copy
80 : 56

تَنزِيلٞ مِّن رَّبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ

80. Ekita kowuta epai ya Nkolo ya mokili. info
التفاسير:

external-link copy
81 : 56

أَفَبِهَٰذَا ٱلۡحَدِيثِ أَنتُم مُّدۡهِنُونَ

81. Boye bozali kozua liloba oyo na lokuta? info
التفاسير:

external-link copy
82 : 56

وَتَجۡعَلُونَ رِزۡقَكُمۡ أَنَّكُمۡ تُكَذِّبُونَ

82. Boye na lolenge wana nde bokozala na botondi na bozui na bino, ete boboya kondima na kurani? info
التفاسير:

external-link copy
83 : 56

فَلَوۡلَآ إِذَا بَلَغَتِ ٱلۡحُلۡقُومَ

83. Tango mpema ekomata tii na mongongo, info
التفاسير:

external-link copy
84 : 56

وَأَنتُمۡ حِينَئِذٖ تَنظُرُونَ

84. Mpe tango wana bozali kotala. info
التفاسير:

external-link copy
85 : 56

وَنَحۡنُ أَقۡرَبُ إِلَيۡهِ مِنكُمۡ وَلَٰكِن لَّا تُبۡصِرُونَ

85. Mpe biso tozali pembeni naye koleka bino, kasi bozali kornona te. info
التفاسير:

external-link copy
86 : 56

فَلَوۡلَآ إِن كُنتُمۡ غَيۡرَ مَدِينِينَ

86. Boye soki boyebi ete bozali na nsé ya mibeko na biso te (bokosekwisama te, to mpe bokofutama te). info
التفاسير:

external-link copy
87 : 56

تَرۡجِعُونَهَآ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ

87. Bozongisa yango (molimo) soki bozali na bosembo? info
التفاسير:

external-link copy
88 : 56

فَأَمَّآ إِن كَانَ مِنَ ٱلۡمُقَرَّبِينَ

88. Soki akozala na molongo ya bato ya pembeni ya (Allah), info
التفاسير:

external-link copy
89 : 56

فَرَوۡحٞ وَرَيۡحَانٞ وَجَنَّتُ نَعِيمٖ

89. (Na yango akozala): Na bopemi mpe ngrásia okati ya lola ya esengo. info
التفاسير:

external-link copy
90 : 56

وَأَمَّآ إِن كَانَ مِنۡ أَصۡحَٰبِ ٱلۡيَمِينِ

90. Mpe soki azali o kati ya bato ya loboko ya mobali, info
التفاسير:

external-link copy
91 : 56

فَسَلَٰمٞ لَّكَ مِنۡ أَصۡحَٰبِ ٱلۡيَمِينِ

91. (Bakoyambaka ye na liloba ya): Kimia ezala nayo, mpo ozali ngambu ya loboko ya mobali! info
التفاسير:

external-link copy
92 : 56

وَأَمَّآ إِن كَانَ مِنَ ٱلۡمُكَذِّبِينَ ٱلضَّآلِّينَ

92. Kasi soki azalaki okati ya baye baboyaki mpe babungi, info
التفاسير:

external-link copy
93 : 56

فَنُزُلٞ مِّنۡ حَمِيمٖ

93. Akokitisama okati ya mayi ya moto ya makasi. info
التفاسير:

external-link copy
94 : 56

وَتَصۡلِيَةُ جَحِيمٍ

94. Mpe akozikisama okati ya moto. info
التفاسير:

external-link copy
95 : 56

إِنَّ هَٰذَا لَهُوَ حَقُّ ٱلۡيَقِينِ

95. Wana nde likambo ya soló. info
التفاسير:

external-link copy
96 : 56

فَسَبِّحۡ بِٱسۡمِ رَبِّكَ ٱلۡعَظِيمِ

96. Kumisa nkombo ya Nkolo nayo ya monene info
التفاسير: