કુરઆન મજીદના શબ્દોનું ભાષાંતર - લિંગાલા ભાષામાં અનુવાદ - મુહમ્મદ બલિનગોગો

પેજ નંબર:close

external-link copy
65 : 22

أَلَمۡ تَرَ أَنَّ ٱللَّهَ سَخَّرَ لَكُم مَّا فِي ٱلۡأَرۡضِ وَٱلۡفُلۡكَ تَجۡرِي فِي ٱلۡبَحۡرِ بِأَمۡرِهِۦ وَيُمۡسِكُ ٱلسَّمَآءَ أَن تَقَعَ عَلَى ٱلۡأَرۡضِ إِلَّا بِإِذۡنِهِۦٓۚ إِنَّ ٱللَّهَ بِٱلنَّاسِ لَرَءُوفٞ رَّحِيمٞ

65. Boye ozali kornona te, ya sólo Allah asaleli bino nyoso oyo ezali o mokili, mpe masuwa ezali kotambola okati ya ebale na mibeko mia ye? Mpe asimbi likolo mpo ekweyela mabele te, sé na bolingi bwa ye. Ya sólo, Allah azali malamu atonda ngolu mpo na bato. info
التفاسير:

external-link copy
66 : 22

وَهُوَ ٱلَّذِيٓ أَحۡيَاكُمۡ ثُمَّ يُمِيتُكُمۡ ثُمَّ يُحۡيِيكُمۡۗ إِنَّ ٱلۡإِنسَٰنَ لَكَفُورٞ

66. Ye nde apesaka bino bomoyi mpe liwa, sima akosekwisa bino. Ya sólo moto azali na bopengwi ya bolamu ya Allah. info
التفاسير:

external-link copy
67 : 22

لِّكُلِّ أُمَّةٖ جَعَلۡنَا مَنسَكًا هُمۡ نَاسِكُوهُۖ فَلَا يُنَٰزِعُنَّكَ فِي ٱلۡأَمۡرِۚ وَٱدۡعُ إِلَىٰ رَبِّكَۖ إِنَّكَ لَعَلَىٰ هُدٗى مُّسۡتَقِيمٖ

67. Mpe umma nionso(2) totiyelaki bango mibeko lia bolandi, tika ete baswanisa yo te na maye mayeli yo. Belela mpo na Nkolo nayo, ya sólo ozali o nzela ya semba. info

2 Umma: Elakisi: Lingomba, bótala na suratu Al-Baqarah mokapo 128.

التفاسير:

external-link copy
68 : 22

وَإِن جَٰدَلُوكَ فَقُلِ ٱللَّهُ أَعۡلَمُ بِمَا تَعۡمَلُونَ

68. Mpe soki basuanisi yo, loba: Allah ayebi maye bozali kosala. info
التفاسير:

external-link copy
69 : 22

ٱللَّهُ يَحۡكُمُ بَيۡنَكُمۡ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ فِيمَا كُنتُمۡ فِيهِ تَخۡتَلِفُونَ

69. Allah akosambisa (makambo) kati na bino o mokolo ya Suka na maye bozalaki kokesene na yango. info
التفاسير:

external-link copy
70 : 22

أَلَمۡ تَعۡلَمۡ أَنَّ ٱللَّهَ يَعۡلَمُ مَا فِي ٱلسَّمَآءِ وَٱلۡأَرۡضِۚ إِنَّ ذَٰلِكَ فِي كِتَٰبٍۚ إِنَّ ذَٰلِكَ عَلَى ٱللَّهِ يَسِيرٞ

70. Boye ozali koyeba te ete Allah ayebi manso mazali olikolo na onse? Ya soló, nyoso wana mazali okati ya buku(1), mpe solo wana ezali pete тропа Allah. info

1 Buku: Awa elakisi: Lauhu mahfuz: Buku oyo ekomama okati na yango makambo manso oyo ekosalama ti kino mokolo ya suka, mpe ebatelama epai ya Allah.

التفاسير:

external-link copy
71 : 22

وَيَعۡبُدُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ مَا لَمۡ يُنَزِّلۡ بِهِۦ سُلۡطَٰنٗا وَمَا لَيۡسَ لَهُم بِهِۦ عِلۡمٞۗ وَمَا لِلظَّٰلِمِينَ مِن نَّصِيرٖ

71. Мре bazali kobondela na botiki Allah maye akitisela yango elembetele te mpe na maye bazali na boyebi na yango te, mpe babubi bakozuaka mosungi te. info
التفاسير:

external-link copy
72 : 22

وَإِذَا تُتۡلَىٰ عَلَيۡهِمۡ ءَايَٰتُنَا بَيِّنَٰتٖ تَعۡرِفُ فِي وُجُوهِ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ ٱلۡمُنكَرَۖ يَكَادُونَ يَسۡطُونَ بِٱلَّذِينَ يَتۡلُونَ عَلَيۡهِمۡ ءَايَٰتِنَاۗ قُلۡ أَفَأُنَبِّئُكُم بِشَرّٖ مِّن ذَٰلِكُمُۚ ٱلنَّارُ وَعَدَهَا ٱللَّهُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْۖ وَبِئۡسَ ٱلۡمَصِيرُ

72. Mpe tango bazali kotangela bango mikapo mia biso mia polele, okoyeba kanda ya baye bapengwa na bilongi na bango, soki bakokaki kokweyela baye bazali kotangela bango mikapo mia biso, loba: Mpe nayebisa bino тропа mabe oyo bozali kosala, Allah alengeli moto тропа bapengwi. Mpe oyo bozongi ya mabe? info
التفاسير: