કુરઆન મજીદના શબ્દોનું ભાષાંતર - લિંગાલા ભાષામાં અનુવાદ - મુહમ્મદ બલિનગોગો

પેજ નંબર:close

external-link copy
119 : 16

ثُمَّ إِنَّ رَبَّكَ لِلَّذِينَ عَمِلُواْ ٱلسُّوٓءَ بِجَهَٰلَةٖ ثُمَّ تَابُواْ مِنۢ بَعۡدِ ذَٰلِكَ وَأَصۡلَحُوٓاْ إِنَّ رَبَّكَ مِنۢ بَعۡدِهَا لَغَفُورٞ رَّحِيمٌ

119. Sima ya solo, Nkolo wayo тропа baye basalaki mabe na kozanga koyeba sima batubeli mpe babongisi, (bondimi bwa bango), ya soló, Nkolo wayo azali molimbisi atonda mawa. info
التفاسير:

external-link copy
120 : 16

إِنَّ إِبۡرَٰهِيمَ كَانَ أُمَّةٗ قَانِتٗا لِّلَّهِ حَنِيفٗا وَلَمۡ يَكُ مِنَ ٱلۡمُشۡرِكِينَ

120. Ya solo, Ibrâhîm azalaki umma(1), azalaki na botosi тропа Allah, amipesaki mobimba epaî ya Allah тре azalaki o kati ya baye bazalaki kosangisa te (Allah). info

1 Umma: Imam, bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 128

التفاسير:

external-link copy
121 : 16

شَاكِرٗا لِّأَنۡعُمِهِۚ ٱجۡتَبَىٰهُ وَهَدَىٰهُ إِلَىٰ صِرَٰطٖ مُّسۡتَقِيمٖ

121. Azalaki na botondi тропа bolamu bwa Nkolo waye, (mpe Allah) aponaki ye mpe akambaki ye na nzela ya semba. info
التفاسير:

external-link copy
122 : 16

وَءَاتَيۡنَٰهُ فِي ٱلدُّنۡيَا حَسَنَةٗۖ وَإِنَّهُۥ فِي ٱلۡأٓخِرَةِ لَمِنَ ٱلصَّٰلِحِينَ

122. Mpe topesaki ye bolamu kati na mokili, mpe ya soló, ye o mokolo mwa suka akozala o kati ya bato malamu. info
التفاسير:

external-link copy
123 : 16

ثُمَّ أَوۡحَيۡنَآ إِلَيۡكَ أَنِ ٱتَّبِعۡ مِلَّةَ إِبۡرَٰهِيمَ حَنِيفٗاۖ وَمَا كَانَ مِنَ ٱلۡمُشۡرِكِينَ

123. Sima toyebisaki(2) yo; landa lingomba lia Ibrâhîm liye lizali na bomoko (bwa Allah) mpe azalaki te okati ya basangisi (Allah). info

2 Toyebisaki: Ezalaki nde emoniseli.

التفاسير:

external-link copy
124 : 16

إِنَّمَا جُعِلَ ٱلسَّبۡتُ عَلَى ٱلَّذِينَ ٱخۡتَلَفُواْ فِيهِۚ وَإِنَّ رَبَّكَ لَيَحۡكُمُ بَيۡنَهُمۡ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ فِيمَا كَانُواْ فِيهِ يَخۡتَلِفُونَ

124. Ya sólo, mokolo mwa mposo (sabbat) motiyamaki lotomo te, sé тропа baye bakeseneki na yango. Mpe o mokolo mwa suka Nkolo wayo akosambisa bango na maye bakeseneki na mango. info
التفاسير:

external-link copy
125 : 16

ٱدۡعُ إِلَىٰ سَبِيلِ رَبِّكَ بِٱلۡحِكۡمَةِ وَٱلۡمَوۡعِظَةِ ٱلۡحَسَنَةِۖ وَجَٰدِلۡهُم بِٱلَّتِي هِيَ أَحۡسَنُۚ إِنَّ رَبَّكَ هُوَ أَعۡلَمُ بِمَن ضَلَّ عَن سَبِيلِهِۦ وَهُوَ أَعۡلَمُ بِٱلۡمُهۡتَدِينَ

125. Benga bato na nzela ya Nkolo wayo na bwanya mpe na maloba ya kitoko,(1) mpe solola na bango na lolenge ya malamu. Ya soló, Nkolo wayo ayebi baye babungi nzela naye mpe ayebi malamu baye bakambami. info

1 Maloba ya kitoko: Elakisi, Mateya.

التفاسير:

external-link copy
126 : 16

وَإِنۡ عَاقَبۡتُمۡ فَعَاقِبُواْ بِمِثۡلِ مَا عُوقِبۡتُم بِهِۦۖ وَلَئِن صَبَرۡتُمۡ لَهُوَ خَيۡرٞ لِّلصَّٰبِرِينَ

126. Mpe soki bokozongisa mabe, bozongisa yango ndenge moko na oyo basalaki bino. Kasi soki bokangi mitema, wana ezali malamu mingi тропа bakangi mitema. info
التفاسير:

external-link copy
127 : 16

وَٱصۡبِرۡ وَمَا صَبۡرُكَ إِلَّا بِٱللَّهِۚ وَلَا تَحۡزَنۡ عَلَيۡهِمۡ وَلَا تَكُ فِي ضَيۡقٖ مِّمَّا يَمۡكُرُونَ

127. Kanga motema, kasi kokanga motema nayo ekowuta nde epai na Allah. Mpe komitungisa te тропа bango, тре kominyokuama te тропа likita na bango ya mabe. info
التفاسير:

external-link copy
128 : 16

إِنَّ ٱللَّهَ مَعَ ٱلَّذِينَ ٱتَّقَواْ وَّٱلَّذِينَ هُم مُّحۡسِنُونَ

128. Ya sólo, Allah azali elongo na babangi mpe basali bolamu. info
التفاسير: