Firo maanaaji al-quraan tedduɗo oo - Firo Linngalaa - Muhammed ɓii Nangugo

Tonngoode hello ngoo:close

external-link copy
156 : 7

۞ وَٱكۡتُبۡ لَنَا فِي هَٰذِهِ ٱلدُّنۡيَا حَسَنَةٗ وَفِي ٱلۡأٓخِرَةِ إِنَّا هُدۡنَآ إِلَيۡكَۚ قَالَ عَذَابِيٓ أُصِيبُ بِهِۦ مَنۡ أَشَآءُۖ وَرَحۡمَتِي وَسِعَتۡ كُلَّ شَيۡءٖۚ فَسَأَكۡتُبُهَا لِلَّذِينَ يَتَّقُونَ وَيُؤۡتُونَ ٱلزَّكَوٰةَ وَٱلَّذِينَ هُم بِـَٔايَٰتِنَا يُؤۡمِنُونَ

156. Mpe tiyela biso bomengo (bolamu) na bomoyi ya nsé, mpe o mokolo mwa suka, mpe tozongi sé epai nayo. Mpe (Allah) alobi: Etumbu nangai ekozua oyo nalingi, kasi mawa na ngai ezingi biloko binso, nakopanza yango epai ya baye bazali kobanga mpe bazali kobimisa zakat,(1) mpe bazali kondima na bilembo bia ngai. info

1 Bótala na suratu Al-Baqarah: 43, 83, 110, 177, na 277, mpe suratu An-Nisá: 77, Al-Mâ-idah: 12

التفاسير:

external-link copy
157 : 7

ٱلَّذِينَ يَتَّبِعُونَ ٱلرَّسُولَ ٱلنَّبِيَّ ٱلۡأُمِّيَّ ٱلَّذِي يَجِدُونَهُۥ مَكۡتُوبًا عِندَهُمۡ فِي ٱلتَّوۡرَىٰةِ وَٱلۡإِنجِيلِ يَأۡمُرُهُم بِٱلۡمَعۡرُوفِ وَيَنۡهَىٰهُمۡ عَنِ ٱلۡمُنكَرِ وَيُحِلُّ لَهُمُ ٱلطَّيِّبَٰتِ وَيُحَرِّمُ عَلَيۡهِمُ ٱلۡخَبَٰٓئِثَ وَيَضَعُ عَنۡهُمۡ إِصۡرَهُمۡ وَٱلۡأَغۡلَٰلَ ٱلَّتِي كَانَتۡ عَلَيۡهِمۡۚ فَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ بِهِۦ وَعَزَّرُوهُ وَنَصَرُوهُ وَٱتَّبَعُواْ ٱلنُّورَ ٱلَّذِيٓ أُنزِلَ مَعَهُۥٓ أُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡمُفۡلِحُونَ

157. Baye bazali kolanda motindami, ntoma wa boyinga oyo bakokuta ye akomami na torah epai na bango mpe na indjil. Azali kotinda bango na bolamu, mpe akopekisa bango mabe, mpe akopesa bango dingisa ya maye ya malamu, mpe akopekisa bango maye ya mbindo. Mpe akitiselaki bango kilo oyo bazalaki na yango na mibeko ya makasi oyo ezalaki likolo na bango. Na yango, baye bandimelaki ye mpe bapesaki ye lokumu mpe bapesaki ye lisungi, na bobongisi, mpe balandaki mwinda oyo ekitaki elongo naye, bango nde balongi. info
التفاسير:

external-link copy
158 : 7

قُلۡ يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّاسُ إِنِّي رَسُولُ ٱللَّهِ إِلَيۡكُمۡ جَمِيعًا ٱلَّذِي لَهُۥ مُلۡكُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۖ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ يُحۡيِۦ وَيُمِيتُۖ فَـَٔامِنُواْ بِٱللَّهِ وَرَسُولِهِ ٱلنَّبِيِّ ٱلۡأُمِّيِّ ٱلَّذِي يُؤۡمِنُ بِٱللَّهِ وَكَلِمَٰتِهِۦ وَٱتَّبِعُوهُ لَعَلَّكُمۡ تَهۡتَدُونَ

158. Loba: Oh bino bato! Ya soló, nazali motindami wa Allah epai ya bino banso. Oyo azali Nkolo wa bokonzi bwa likolo na mabele, nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te kaka sé ye (Allah). Apesaka bomoyi mpe apesaka liwa, bondima na Allah na motindami wa ye, ntoma wa boyinga oyo azali kondima na Allah na maloba maye. Mpe bolanda ye mpo bokoka kokambama. info
التفاسير:

external-link copy
159 : 7

وَمِن قَوۡمِ مُوسَىٰٓ أُمَّةٞ يَهۡدُونَ بِٱلۡحَقِّ وَبِهِۦ يَعۡدِلُونَ

159. Mpe kati na bato ya Müssa ezali na umma(1) bazali kokamba baninga na nzela ya semba, pe na yango bazali kokata makambo na bosembo. info

1 Umma: Bato bótala Al-Baqarah mokapo: 128

التفاسير: