ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ

លេខ​ទំព័រ:close

external-link copy
47 : 41

۞ إِلَيۡهِ يُرَدُّ عِلۡمُ ٱلسَّاعَةِۚ وَمَا تَخۡرُجُ مِن ثَمَرَٰتٖ مِّنۡ أَكۡمَامِهَا وَمَا تَحۡمِلُ مِنۡ أُنثَىٰ وَلَا تَضَعُ إِلَّا بِعِلۡمِهِۦۚ وَيَوۡمَ يُنَادِيهِمۡ أَيۡنَ شُرَكَآءِي قَالُوٓاْ ءَاذَنَّٰكَ مَا مِنَّا مِن شَهِيدٖ

47. Boyebi ya mokolo ya suka ezali sé na mayele naye moko. Mpe mbuma moko te ekobima na kati ya loposo na yango, mpe mwasi moko te akomema zemi to akobota, kino ekozala sé na mayele naye. Mpe mokolo akobenga bango ete: Wapi bambanda na ngai? Bakozongisa ete: Tozali koloba nayo na bosembo ete: Tozali na nzeneneke ata moko te oyo akondimela biso ete ozali na bambanda. info
التفاسير:

external-link copy
48 : 41

وَضَلَّ عَنۡهُم مَّا كَانُواْ يَدۡعُونَ مِن قَبۡلُۖ وَظَنُّواْ مَا لَهُم مِّن مَّحِيصٖ

48. Mpe baye bazalaki kokumisa bango liboso bakosundola bango, mpe bakoyebaka ete bazali na esika ya kokimela te. info
التفاسير:

external-link copy
49 : 41

لَّا يَسۡـَٔمُ ٱلۡإِنسَٰنُ مِن دُعَآءِ ٱلۡخَيۡرِ وَإِن مَّسَّهُ ٱلشَّرُّ فَيَـُٔوسٞ قَنُوطٞ

49. Moto atikaka kosenga bolamu te, mpe soki mabe ezui ye alongoli elikia. info
التفاسير:

external-link copy
50 : 41

وَلَئِنۡ أَذَقۡنَٰهُ رَحۡمَةٗ مِّنَّا مِنۢ بَعۡدِ ضَرَّآءَ مَسَّتۡهُ لَيَقُولَنَّ هَٰذَا لِي وَمَآ أَظُنُّ ٱلسَّاعَةَ قَآئِمَةٗ وَلَئِن رُّجِعۡتُ إِلَىٰ رَبِّيٓ إِنَّ لِي عِندَهُۥ لَلۡحُسۡنَىٰۚ فَلَنُنَبِّئَنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ بِمَا عَمِلُواْ وَلَنُذِيقَنَّهُم مِّنۡ عَذَابٍ غَلِيظٖ

50. Mpe soki topesi ye bolamu na biso o sima ya mpasi azalaki na yango, alobi: Oyo ezali na mayele na ngai, mpe nandimi te ete mokolo ya suka ezali, mpe soki bazongisi ngai epai na Nkolo na ngai, nakozua sé oyo ya ngai ya kitoko. Mpe тропа baye bapengwa tokopesa bango sango ya maye bazalaki kosala, mpe tokomekisa bango etumbu ya makasi. info
التفاسير:

external-link copy
51 : 41

وَإِذَآ أَنۡعَمۡنَا عَلَى ٱلۡإِنسَٰنِ أَعۡرَضَ وَنَـَٔا بِجَانِبِهِۦ وَإِذَا مَسَّهُ ٱلشَّرُّ فَذُو دُعَآءٍ عَرِيضٖ

51. Мре tango topesaka moto bolamu, akimaka mosika, mpe soki mabe ezui ye akomi kosenga makasi. info
التفاسير:

external-link copy
52 : 41

قُلۡ أَرَءَيۡتُمۡ إِن كَانَ مِنۡ عِندِ ٱللَّهِ ثُمَّ كَفَرۡتُم بِهِۦ مَنۡ أَضَلُّ مِمَّنۡ هُوَ فِي شِقَاقِۭ بَعِيدٖ

52. Loba: Bomoni ndenge nini soki (kurani) oyo ewutaki epai ya Allah mpe sima bopengwi na yango, nani aleki kobunga koleka oyo amitiye mosika na mikakatano? info
التفاسير:

external-link copy
53 : 41

سَنُرِيهِمۡ ءَايَٰتِنَا فِي ٱلۡأٓفَاقِ وَفِيٓ أَنفُسِهِمۡ حَتَّىٰ يَتَبَيَّنَ لَهُمۡ أَنَّهُ ٱلۡحَقُّۗ أَوَلَمۡ يَكۡفِ بِرَبِّكَ أَنَّهُۥ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ شَهِيدٌ

53. Tokolakisaka bango bilembo bia biso o kati na mokili mpe na banzoto na bango moko, kino bakoyebaka ete ya soló, kurani ezali bosóló, boye Nkolo wayo akoki te? Ya soló, ye azali na bokoki mpe amonaka manso. info
التفاسير:

external-link copy
54 : 41

أَلَآ إِنَّهُمۡ فِي مِرۡيَةٖ مِّن لِّقَآءِ رَبِّهِمۡۗ أَلَآ إِنَّهُۥ بِكُلِّ شَيۡءٖ مُّحِيطُۢ

54. Bazali na tembe тропа bokutani na Nkolo wa bango. Ya sólo ye azingi biloko binso. info
التفاسير: